Luke 24

Yesu asekwi

(Mt. 28.1-9 ; Mk. 16.1-8 ; Jn. 20.1-10)

1Na tongo-tongo ya mokolo ya liboso ya poso, basi bakendaki na simetiele ; bamemaki mafuta ya solo kitoko oyo babongisaki. 2Bakutaki libanga etiamaki pembeni ya monoko ya lilita. 3Kasi tango bakotaki na kati, bamonaki nzoto ya Nkolo Yesu te. 4Na tango bazalaki naino komituna mpo na tina ya likambo yango, bato mibale balataki bilamba oyo ezalaki kongenga makasi penza, batelemaki pembeni na bango. 5Babangaki, mpe bakitisaki bilongi na nse ; bongo bato yango batunaki bango :

—Mpo na nini bozali koluka kati na bakufi moto oyo azali na bomoi ?
6Azali awa te ! Asiʼasekwi ! Bokanisa makambo oyo azalaki koloba na bino tango azalaki naino na Galileya : 7“Esengeli ete bakaba Mwana na Moto na maboko ya bato ya masumu, bakobaka ye na ekulusu mpe akosekwa na mokolo ya misato !”

8Bongo bakanisaki maloba ya Yesu. 9Batikaki simitiele mpe bakendaki koyebisa makambo wana nyonso epai ya Bapostolo zomi na moko mpe epai ya baoyo mosusu nyonso. 10Ezalaki : Mariya ya Magadala, Jeane mpe Mariya mama ya Zaki mpe baninga na bango mosusu ya basi, bayebisaki mpe sango yango na bapostolo. 11Kasi bazwaki maloba na bango lokola maloba oyo ezanga tina, mpe bandimaki yango te.

12Kasi Piere atelemaki mpe akimaki mbangu na lilita. Tango angunzamaki, amonaki bilamba ezalaki wana, kaka yango moko. Azongaki mpe akamwaki mingi penza mpo na makambo oyo ewutaki kosalama.

Yesu abimeli bayekoli mibale na nzela ya Emawusi

13Kaka na mokolo wana, bayekoli mibale bazalaki kokende na mboka moko kombo na yango Emawusi. Mboka yango ezalaki mosika na Yeruzalem na bakilometele pene-pene zomi na mibale. 14Bazalaki kosolola mpo na makambo nyonso oyo esalamaki. 15Awa bazalaki kosolola mpe kotiana tembe mpo na makambo yango, Yesu asanganaki na bango mpe abandaki kokende na bango nzela moko. 16Kasi miso na bango ezalaki ya kozipama mpo na koyeba ye.

17Atunaki bango :

—Makambo nini bozali kotiana tembe na nzela ? Batelemaki, mpe bilongi na bango ekomaki mawa-mawa.
18Moko na kati na bango kombo na ye Kleyopasi, azongiselaki ye :

—O ! boni ? Na kati ya bato nyonso oyo bavandaka na Yeruzalem, kaka yo moto nde oyebi te makambo elekaki kuna mikolo oyo ?

19Yesu atunaki bango :

—Makambo nini yango ? Bazongiselaki ye :

—Makambo oyo ekweyilaki Yesu ya Nazareti. Ye azalaki moprofeta oyo azalaki kosala mpe koloba na nguya nyonso, liboso ya Nzambe mpe liboso ya bato nyonso.
20Kasi bakonzi ya banganga-Nzambe mpe bampaka na biso bakabaki ye, bakatela ye etumbu ya liwa mpe babaka ye na ekulusu. 21Totiaki elikya ete ye azalaki moto oyo asengelaki kokangola Isayele. Kasi tala, lelo ekomi mokolo ya misato banda makambo wana esalamaki.

22Mpe lisusu, basi mosusu na kati na biso, bakamwisaki biso mingi penza. Bakendaki na simetiele na tongo-tongo, 23kasi bamonaki nzoto na ye te mpe bayaki koyebisa biso ete bamonaki baanzelu babimelaki bango mpe balendisaki bango ete azali na bomoi. 24Baninga na biso mosusu bakendaki na lilita, mpe bamonaki makambo nyonso kaka ndenge basi bayebisaki bango ; kasi ye, bamonaki ye te !

25Bongo Yesu alobaki na bango :

—Bozali penza bazoba ! Mitema na bino ezali na pasi mingi mpo na kondima noki-noki makambo nyonso oyo baprofeta baloba.
26Boni, Kristo asengelaki te komona pasi wana nyonso liboso ete akota na nkembo na ye ?

27Bongo abandaki kolimbolela bango makambo nyonso oyo ekomama na Makomi banda na Moyize kino na baprofeta nyonso. 28Tango bakomaki pene-pene ya mboka oyo bazalaki kokende, Yesu asalaki lokola nde azalaki kokende mosika. 29Kasi bango babondelaki ye mingi penza :

—Tikala na biso elongo ; pamba te pokwa esiʼekomi, mpe butu elingi eya ! Bongo Yesu akotaki na ndako mpo na kovanda na bango.
30Tango avandaki na mesa, elongo na bango, akamataki limpa, azongisaki matondi, akataki yango mpe apesaki bango. 31Bongo, miso na bango efungwamaki mpe bayebaki ye. Kasi alimwaki bango. 32Bongo batunanaki :

—Boni mitema na biso etondaki na esengo te tango azalaki kosolola na biso na nzela mpe azalaki kolimbolela biso Makomi ?
33Kaka na ngonga wana, batelemaki mpe bazongaki na Yeruzalem. Kuna, bakutaki bapostolo zomi na moko, elongo na baoyo bazalaki na bango, basanganaki esika moko 34mpe balobaki na bango :

—Ya solo Nkolo asekwi, abimelaki Simon !

35Bongo bango mibale bayebisaki mpe makambo oyo ekomelaki bango na nzela, mpe ndenge bayebaki lisusu Yesu tango akataki limpa.

Yesu abimeli bapostolo zomi na moko

(Jn. 20.19-23)

36Awa bazalaki naino kosolola mpo na makambo yango, Yesu atelemaki na kati na bango, mpe alobaki na bango :

—Kimia ezala na bino !

37Kasi kobanga mpe somo ekangaki bango, pamba te bakanisaki ete bamoni molimo.

38Yesu atunaki bango :

—Mpo na nini bozali kobanga ? Mpo na nini bozali na tembe na mitema na bino ?
39Botala maboko mpe makolo na ngai, ezali ngai penza. Bosimba ngai mpe botala ! Pamba te molimo ezali na mosuni te mpe mikuwa te. Nzokande, bomoni ete ngai nazali na yango ! 40Tango alobaki bongo, alakisaki bango maboko mpe makolo na ye. 41Bakokaki kondima naino te, pamba te, esengo ekotelaki bango makasi penza, mpe bazalaki kokamwa mingi penza. Bongo atunaki bango :

—Bozali na eloko ya kolia ?

42Bapesaki ye eteni ya mbisi bakalinga. 43Azwaki yango mpe aliaki yango na miso na bango 44Bongo alobaki na bango :

—Tala makambo nayebisaki bino tango nazalaki naino elongo na bino : “Esengeli ete makambo nyonso oyo ekomama mpo na ngai na Mibeko ya Moyize, na Mikanda ya baprofeta mpe ya banzembo, ekokisama.”

45Bongo afungolaki mayele na bango mpo bakoka kososola tina ya makambo oyo ekomama na Makomi. 46Mpe alobaki lisusu :

—Ekomama boye : Kristo akoyoka pasi, akosekwa kati na bakufi na mokolo ya misato ;
47mpe na kombo na ye, bakoteya bato ya bikolo nyonso, kobanda na Yeruzalem, ete esengeli babongola mitema mpo bazwa bolimbisi ya masumu. 48Bino bozali batemwe ya makambo oyo. 49Bongo ngai, nakotindela bino oyo Tata na ngai alakaki. Kasi bino, botikala awa na vile, kino tango bokolatisama na nguya ya Likolo !

50Sima, Yesu amemaki bango na libanda ya vile kino na bapembeni ya Betaniya. Atombolaki maboko likolo mpe apambolaki bango. 51Mpe tango azalaki kopambola bango, abandaki kotika bango mpe amemamaki na Likolo.

52Sima ya kokumbamela ye, bazongaki na Yeruzalem na esengo monene. 53Bazalaki tango nyonso na Ndako ya Nzambe, mpe bazalaki kopambola Nzambe.
Copyright information for LinMNB